Corona virus to pe covid 19

Corona virus to pe covid 19 ezali mikrobe ya moke penza oyo tokoki ko mona na misu te, ekoki ko palanganisama pé ko tumbola bokono epayi na bato. Bilembo biyé bizali ko talisa été moto aza na covid 19 bi kokani na bilembo ya bokono bo bengami grippe, ndakisa kosu kosu ya ko kauka, pema mokuse, fièvre, na nzoto pasi. Covid 19 eza ko bebisa yambo pema ya mutu oyo ebengami na lopoto système respiratoire. Ata ko ba infections misusu baza penza na likama té, coronavirus ekoki ko tumbola bobebisami ya binama ya nzoto masengeli pona ko pema, pé yango ekoki ko boma na ntango yango ekomeli penza.

Mutu nionso akoki ko zua covid 19 kasi epayi ya Mikolo pé baye ba sili ko zua bokono lokola bokono ya pema, cancer, diabète, ezali ko talisama na bokasi penza.

Moto oyo asili ko zua corona virus akoki ko pesa yango na basusu na nzela ya soyi wana ezali yé ko pema to ko kosola pembeni penza na bango,ko kosola likolo yailoko to mpe ya bileyi. Ekelamu ena ezali ko kota na nzoto ya mutu na nzela ya munoko, zolo mpe misu. Wana esili yango ko kota na nzoto, eko mifulukisa mpe ko palanganisama na bisika misusu. Soki mutu azwi covid 19, ekoleka mikolo zomi na mineyi liboso été bilembo na yango emonisama. Mutu akoki bongo kozua coronavirus na ko zanga ko yeba été asili ko zua yango pé ko pesa yango na basusu.

Ba nkisi ya monnga to mpe ya bokoko ezali nanu té ko bebisa penza corona virus na nzoto. To koki ko sukisa po palanganisami ya bokono ena bobele na kobatela distance na basusu mpe kosokolaka maboko ntango nionso.

Po na kmibatela na virus, esengeli na biso ko sokola maboko na sabuni mpe mayi ata ko maboko maza ko milakisa lokola maza na bosoto té. Bo sukola maboko ntango nionso na mayi ebele, p nika yango malamu penza ti manzaka. Bosukola maboko na bobimba penza. Kosukola maboko ntango nionso pé na lolenge elongobani na mayi pé na sabuni eza ko boma mikrobe oyo esili ko mifandisa wana. Bo sukola penza maboko liboso, pé na sima ya kolamba, ya ko kota WC, ya ko lia, soki ozacc ko sunga batu ya maladi, sima ya ko simba ba niama, sima ya ko kokosala.

Esengeli na bino ko simba soko mokié té munoko, zolo mpe misu na ko zangaka ko sukola maboko liboso. Maboko masimbaka bisika ele mpe makoki ko kutanisama na ba virus ya ndenge na ndenge. Wana maboko masili ko bebisama, zolo, misu mpe munoko bikomaka bikuke polele pona covid 19. Na bongo, coronavirus ekoki ko kota na nzoto mpe ko belisa yo.

Eza motuya penza ko zala mua musika na bayé baza na nzoto moto, kosu kosu mpe bilembo misusu matali pema. Esengeli na bino ko kosola na lolenge esengeli ko salelaka elamba pé na sima ko buaka yango na fulu, ko buaka soyi liboso ya batu té.

Bo batela distance ya 1 mètre na bazalisami na bino to bayé baza ko kosola mpe ko boya ko tutana to ko zala pembeni ya mutu oyo azo kosola to aza na nzoto moto.

Soki olingi ko sunga mutu oyo azo kosola, aza na nzoto moto to aza na mikakatano po na ko pema, lata masque ya ko mibatela to oyo esalami na elamba mpe sokola maboko na lolenge elongobani.

Po na ko pekisa to ko boya bo palanganisami ya coronavirus esengeli ko boya ko tutana to ko zala pene pene na basusu. Covid 19 Lokola ba virus misusu eza ko tambola epayi na bato na ko simbanaka to ko pesanaka mbote na maboko, pé na sima ezo kota na nzoto soki osimbi misu, zolo to munoko. Na bongo, po na ko pesana mbote to sengeli ko boya ko simbana na maboko, ko yambana to ko pepuana. To sengeli mpé ko pesana mboté na musika, na ko ningisaka loboko to mutu to ko gumbanaka. Soki bokanisi été covid 19 eza na engumba na bino, bofanda na ndaku mpe bo boya ko kutana na basusu.

Soki obandi ko mi yoka mabe, ata na bilembo mikié lokola mua mutu pasi, zolo ko tanga, fanda na ndaku kino oko bika. Soki oza na kosusu ya ko kauka, mikakatano ya ko pema mpe nzoto moto, kende na lombango ko kutana na munganga, po yango ekoki kowuta na botungisami ya pema to infection ya makasi.

Masolo ya lokuta mataleli korona virus makoki ata ko bomisa batu misusu. Ndakisa, komela mayi ya javel to masanga makasi eza ko bundisa coronavirus té, kasi eza ko bebisa bokolongono bwa nzoto. Ata ko masolo mpe mayebisi maza ko wuta na baninga ma koki ko zala lokuta mpe ko mema na liwa. Tosengeli ko yoka bobele bulamatadi ba konzi bateleli bokolongono bwa nzoto.

Bo koki ko mema lisungi na bino kati na etumba oyo na ko kabolaka sango oyo. Tosengi bino été bo kabola sango oyo na baninga mpe ba ndeko, mingi mingi mpenza na nzela ya whatsapp.